HTML picture-Element
HTML picture-Element
HTML picture-Element
HTML picture-Element HTML picture-Element HTML picture-Element HTML picture-Element HTML picture-Element HTML picture-Element HTML picture-Element HTML picture-Element HTML picture-Element

SERIE ANIMEE YA BA EPISODES MISATO OYO EZO TALISA LISAPO MPE KOKOLA YA MWANA MOBALI YA 8 ANS NA MBOKA CONGO

AKESI NA EBALE YA CONGO

Akesi azali mwana mobali ya 8 ans oyo afandaka na Congo, Brazzaville. Liwa ya ndeko naye ya mobali esalaki ye pasi mingi mpe etungisaki ye. Na komitungisa wana, totem ya libota na bango ya muselekte, ememaki ye na mistik ya ebale ya Congo esika wapi na kotambola na bango ayekoli makambo ebele etali liwa,elikia mpe mpiko.

Na kotambola na bango ayekoli lisolo ya bokoko naye, masapo ya ekolo naye mpe na bazamba pona koyeba ntina na yango

MAYE MATALI BA SERIES OYO

Akesi na ebale ya Congo ezali dessin animé ya trois parties oyo ezali kolanda ba aventures ya Akesi, mwana mobali ya congolais ya 8 ans oyo atungisami na liwa ya ndeko naye ya mobali.

Lisanga na kombo ya Tales of Us basaleli bosangisi ya animation na fond vert. Ba animateurs nde bazomema bana na bassin ya Congo, koleka na ebale ya Congo mpe kati ya tango mpo bayekola bizaleli, bokoko mpe masapo ya bazamba ya mboka.

Akesi ekolakisama kala mingi te na ba festival ya cinéma na mokili mobimba. Toko pesa bimo ba sango na page oyo tango série ya Akesi na ebale ya Congo eko lakisama na cinéma pembeni na bino

HTML picture-Element

ANIMATEURS
INTERNATIONALES NA BISO

Serie nioso ezali na 5 langues : anglais, néerlandais, allemand, lingala na français. Ba animateurs bazali: Sasheer Zamata (membre ya kala ya casting ya Saturday Night Live mpe mokomi), Akwasi (musicien), Teddy Teclebrhan (animateur ya Teddy Comedy), Jeny Bosenge (chorégraphe et influenceuse) et Gaz Mawete (musicien).

HTML picture-Element HTML picture-Element

TALES EZALI NINI?

Tales ezali compagnie ya production d’utilité publique oyo epanzaka ba masapo ya batu mpe bisika na mokili mobimba. Basalelaka boyebi mpe masapo ya bisika na bisika pona komema ba masapo na mokili mobimba.

Projets na bango ya liboso – livre ‘Congo Tales’ (Random House 2018) na film ya bana ‘The Little Fish and the Crocodile’ efungolaki nzela na boyebi ya zamba ya Congo na batu bafandaka na zamba oyo pona mokili mobimba.

Project oyo nde efungolaki lisolo ya kobatela zamba ya Congo. Na lisalisi ya photographie, project na bango ‘Congo Tales’ etalisaka ba masapo ya batu ya commune Mbomo nakati ya parc national d’Odzala-Kokoua republiki ya Congo. Project oyo esalaki succès ya makasi mpe balakisa yango na ba journeaux munene lokola New York Times, BBC News, PBS NewsHour etc. Film “Little Fish and the Crocodile” balakisa na ba grands festivals internationaux ya film mpe elongi prix ya liboso ya Festival international ya film pona bana na Chicago.

BG MASK

01 AKESI NA BA SEKELE YA ZAMBA

‘Akesi na ba sekele ya zamba’ ezali lisolo ya elenge moko na kombo ya Akesi oyo afandaka na mboka
na ye na Brazzaville. Na kolinga koyeba ntina ya liwa ya ndeko na ye ya mobali, totem ya libota naye
ya muselekete ememaki ye na ebale ya Congo. Mobembo oyo ya mistik nde ememi Akesi na komona
kitoko ya bokoko mpe bizaleli ya ekolo na ye . Ayekoli ndenge batu bafandaka na zamba ba salaka
matanga pona ko kanisa mpe ko kumisaka bomoyi mpe liwa ya batu. Boyebi wana nde epesi Akesi
kimia ya kondima liwa ya ndeko naye ya mobali na kombo ya Momboti

BG MASK

02 AKESI NA BOBUNGISI YA MBOKA YA BATEKE

‘Akesi na bokweyi ya bokonzi ya Bateke’ ezali lisolo ya republiki ya Congo mpe lokuta oyo ememaki na bokoti ya ba colonisateurs francais na mabele ya Congo. Akesi azali kotala na mosika ndenge makambo ezali kosalama na miso na ye. Atako azangi bokasi ya kobongola makambo wana ya kala na boyebi na ye ya sika, kasi ayekoli ntina ya bosembo mpe bondimi

BG MASK

03 AKESI NA BITUMBA PONA LIPANDA

‘Akesi na bitumba pona lipanda ’ ezali episode ya misato mpe ya suka ya série oyo. Akesi alongoli bobangi naye mpe atelemeli makambo na ye mpe ya leki na ye ya mwasi na boyebi oyo ayekoli na ntina ya elikia mpe bokasi . Mateya ya suka ayekoli etali Patrice Lumumba, premier ministre ya liboso ya republiki ya democratique ya Congo na ndenge koyika mpiko na ye efungolaki nzela ya lipanda na mboka na ye na 1960.

BG MASK

Did you enioy our journey? Then get to know Tales, the collective behind Akesi and the Congo River series here

IMPRESSUM PRIVACY POLICY

Copyright 2022 - © TALES OF US